chat

Prophète na ngai Muhammad - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia -

Prophète na ngai Muhammad - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia -

Prophète na ngai Muhammad - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia -

kabola:

Nzambe (Allah) Alobi:

{Ya solo, motindami awuti Kati na bino aye mpona bino na Ntina ya mbasi ya kilo makasi bozalaki na yango azali koyokela bino mawa mpe kotala bino, azalaki na bolingo mpe ngolu epai ya ba ndimi}.

[A-Tawbah: 128]

Nzambe (Allah) Alobi:

{(Mohammed) “Totindakayo te Kaka ozala ngolu rahmat pona mokili}.

[Al-Anbiya’: 107]

Muhammad - Nzambe apambola ye pe apesa ye kimia - ngolu ya kotambwisa

Azali Muhammad bin Abdullah - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia - elembo ya basakoli mpe bamemi-nsango Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atindaka ye na lingomba ya Islam epai ya bato banso, mpo na kotambwisa bango, na bolamu oyo eleki monene ezali bomoko ya Nzambe, mpe mpo na kopekisa bango na mabe, oyo eleki monene ezali polythèisme shirki.

Esengeli kotosa ye na makambo oyo azali kopesa mitindo, kondima makambo oyo azalaka koloba, kokima makambo oyo apekisaka na apamelaka, mpe kosambela Nzambe kaka na oyo apesaka mitindo.

Nsango na ye mpe nsango ya basakoli banso liboso na ye ezali bobengi batu kosambela Nzambe ye moko,Oyo azangi mosangisi.

Kati na bizaleli na ye - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia - ezali :

Bosembo, mawa, motema kimia, motema molai, mpiko, bokabi, bizaleli malamu, bosembo, komikitisa, bolimbisi.